
The Tower of Babel (Genesis 11: 1-9)
Lingala
- Bongo mabele mobimba ezalaki na monɔkɔ kaka moko
mpe maloba kaka ndenge moko.
- Mpe esalemaki boye: ntango bazalaki kosala mobembo epai ya ɛsti,
nsukansuka bamonaki lobwaku moko ya patatalu na mokili ya Shinare, mpe
babandaki kofanda wana.
- Mpe babandaki kolobana ete: “Yaká! Tósala babriki
mpe tótumba yango na mɔtɔ.” Boye mabanga na bango
nde briki, kasi pɔtɔpɔtɔ na bango nde gudrɔ.
- Bongo balobaki ete: “Yaká! Tómitongela engumba mpe
lisusu ndako molai oyo nsɔngɛ na yango ekei tii na likoló,
mpe tómisalela nkombo ya lokumu, noki tópalangana na mabele
mobimba.”
- Mpe Yehova akitaki mpo na kotala engumba mpe ndako molai oyo bana ya
bato batongaki.
- Nsima na yango, Yehova alobaki ete: “Talá! Bazali kaka
ekólo moko mpe bango nyonso bazali monɔkɔ kaka moko,
mpe talá oyo babandi kosala. Sikoyo, ezali na eloko moko te oyo
bakokanisa kosala, oyo bakokokisa te.
- Sikoyo yaká! Tókita kuna mpe tóbulunganisa
monɔkɔ na bango mpo ete moko te akoka koyoka monɔkɔ
ya mosusu.”
- Bongo Yehova apalanganisaki bango uta na esika yango tii na mabele mobimba, mpe
nsukansuka batikaki kotonga engumba yango.
- Yango wana babengaki yango nkombo
Babele, mpamba te kuna Yehova abulunganisaki monɔkɔ ya mabele
mobimba, mpe Yehova apalanganisaki bango longwa na esika wana tii na mabele mobimba.
From: Biblia - Libongoli ya Mokili ya Sika
Information about Lingala |
Phrases |
Numbers
Tower of Babel in Bantu languages
Bemba,
Beti,
Bulu,
Chichewa,
Dawida,
Haya,
Kamba,
Kiga,
Kikuyu,
Kinyarwanda,
Kirundi,
Kongo,
Koti,
Kwanyama,
Lamba,
Lingala,
Lozi,
Luba-Katanga,
Luganda,
Luragooli,
Mbunda,
Mpongwe,
Ndebele,
Ndonga,
Nkore,
Northern Sotho,
Nyakyusa,
Sango,
Sena,
Shona,
Soga,
Southern Sotho,
Sukuma,
Swahili,
Swati,
Tetela,
Tonga,
Tsonga,
Tswana,
Tumbuka,
Venda,
Xhosa,
Yao,
Zulu
Other Tower of Babel translations
By language |
By language family
[top]
Why not share this page:
Learn languages for free on Duolingo

If you like this site and find it useful, you can support it by making a donation via PayPal or Patreon, or by contributing in other ways. Omniglot is how I make my living.
Note: all links on this site to Amazon.com
, Amazon.co.uk
and Amazon.fr
are affiliate links. This means I earn a commission if you click on any of them and buy something. So by clicking on these links you can help to support this site.
[top]